Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lingomba Etat Islamique elobi ebomi basoda mitano ya MONUSCO kasi ONU endimi kaka moko


Basoda ya MONUSCO ya Maroc na Djugu, etuka ya Ituri, 13 mars 2020.
Basoda ya MONUSCO ya Maroc na Djugu, etuka ya Ituri, 13 mars 2020.

Lingomba Etat Islamique ya Afrika ya kati (ISCAP) emikumisi mpo na koboma basoda mitano ya MONUSCO mpe kobeta masasi mbala mibale na mampinga ma RDC, esakoli site Intteligence Group eye epesaka sango ya ba Jihadistes. MONUSCO endimi kaka moko,

"Basoda ba Caliphat babetaki masasi na basoda ba Nations unies na nzela ya ndelo ya Ouganda na engumba Beni, lobi; babetaki minduki automatiques (mitraillettes). Yango emamaki na liwa lya mitano kati na bango, mpe kobotola mondiku mwa moko na bango," ekomi Etat islamique kolanda Site Intelligence Group.

Liyebisi mosusu ya Etat islamaique, ya le 22 juin, lilobelaki bitumba kati babundi ya EI (ISCAP) na baye ba mampinga na mboka Kadoa, soda moko ya ba FARDC (mampinga ya RDC) akufaki, kolanda etuka ya Afrika ya kati ya lingomba Etat islamique.

Batomboki ya musulamane ya EI babomaki mpe basoda ya FARDC le 20 juin, kolanda makomi ma bango na Site Intelligence Group.

MONUSCO endimi kaka liwa lya soda moko ya ekolo Indonesia mpe elobi ya mibale azokaki na masasi. Mpo na MONUSCO bitumba byango bisalamaki na babundi bamonani kozala ba ADF, batomboki ya musulmane baye bazali mingi ya ekolo Ouganda.

Molobeli mampinga ya Ekolo Congo démocratique (FARDC) na Beni, Lieutenant Anthony Mwalushayi, alobi ete bitumba bizali kosalama na ba ADF kasi na lingomba mosusu te.

"Ya solo soda moko ya Indonésia azwaki masasi mpe akufaki mpe mosusu azozkaki kasi mampinga makita bisika byango mpe tozali kolandabaye basalaki yango," ayanoli lieutenant Mwalushayi.

Bakambi ba FARDC nanu bayamoli te na maloba maye.

XS
SM
MD
LG