Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba ADF babomi pene na 200 mpe bato 40.000 bakimi wuto Janvier (HCR)


Ba FARDC balakisi babundi ya ADF bakangi na bitumba na Beni, Nord-Kivu, 23 décembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Ba FARDC balakisi babundi ya ADF bakangi na bitumba na Beni, Nord-Kivu, 23 décembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Pene na bato 200 bakufi mpe 40.000 bakimi bisika na bango ba bitumba ba ADF bazali kosala na Beni mpe pene na Ituri wuto libandela lya mobu moye, elobi HCR (Haut-Commissariat ya ONU mpo na bakima bitumba).

HCR ekebisi mpo na motango ya bitumba ya ADF momati mpenza wuto libandela lya 2021.

"Ba ADF babomi pene na bato 200, batiki bato mingi na mpota mpe baye bakimi bazali pene na 40.000 na territoire ya Beni, na Nord-Kivu mpe na mboka pene na Ituri," eyebisi molobeli ya HCR, Babar Baloch wuto Genveve, na Suisse.

"Sanza misato ekoki te, ba ADF bakotaki na mboka 25, batia moto na ndako mingi mpe bamemaki bato 70," ebakisaki M. Baloch na ndako ya mosala ya HCR.

Na 2020, ba ADF babomaki pene na 465.

KST (Observatoire ya bokengi na Kivu) elobi ete ba ADF babomaki ba to 1.200 wuto 2017.

Mposo moleki, Etats-Unis etiaki ba ADF na mokambi ya bango na molongo y aba dongolomeso na mokili lokola mpe DAESH ya Tanzanie.

Ba ADF basakolaki mibu mileki ete bazali na DAESH yo lingomba ya Etat islamique.

Etat islamique ekoma kondima bobomi mingi ba ADF basalaka na est mpe na nord-est ya RDC.

XS
SM
MD
LG