Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame atindi Kabarebe na bakonzi basusu ba RDF pene na 200 na bopemi


President Paul Kagame azali kolobela basoda ba mampinga ma Rwanda, 12 sanza ya zomi na moko 2018.
President Paul Kagame azali kolobela basoda ba mampinga ma Rwanda, 12 sanza ya zomi na moko 2018.

Paul Kagame mokonzi ekolo Rwanda atindi na bopemi bakonzi ya basoda baike bazalaki mampinga ma Rwanda RDF.

Kati na bango, General James Kabarebe oyo akomaki kutu mokambi ya mampinga ma Ekolo Congo democratique nsima na mampinga ma Rwanda masungaki batomboki ba AFDL (Alliance des forces démocratiques pour la libération du Congo) bakambamaki na nkondo Laurent-Desire Kabila kokweyisa bokonzi ya Joseph Mobutu Sese Seko na 1997.

Paul Kagame andimi mpe bopemi bakambi ba mapinga pene na nkama mibale elongo na ba officiers ba likolo, mpe asukisi contrat to boyokani ya mosala ya ba officier basusu mpe apesi bango ndingisa ya kopema mpo na lisali lya minganga.

Nsango yango epesami na mampinga ma Rwanda RDF.

Forum

XS
SM
MD
LG