Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mampinga ma Rwanda mabomi "soda" moko malobi awutaki RDC mpe abetaki masasi na Rubavu


Ba soda ba Mampinga ma Rwand(FDR) batindami Mozambique. ma libanda lya mpoe ya Kanombe, Kigali, Rwanda, le 10 juillet 2021.
Ba soda ba Mampinga ma Rwand(FDR) batindami Mozambique. ma libanda lya mpoe ya Kanombe, Kigali, Rwanda, le 10 juillet 2021.

Mampinga ma Rwanda, RDF, masakoli ete mabomi na masasi soda moko abetaki masasi na ngambo ya Rwanda na kowuta na Ekolo Congo démocratique, RDC, nsima na ye kokatisa mpe kobeta masasi na ngambo ya Rubavu.

"O’mokolo mwa mposo, 19 novembre 2022, na ngonga moko ya butu, soda moko ayebani malamu te oyo akanisami kozala ya FARDC (Mampinga ma RDC) akatisaki ndelo ya Rwanda na ‘petite barrière’ na district ya Rubavu, mpe abandaki kobeta masasi na ndako ya bakengeli ba Mampinga ma Rwanda. Abomamaki na kobetama masasi na bayi RDF [Mampinga ma Rwanda] baye bazalaki kosala bokengi, yambo ete aboma ata moto moko," elobi na siki siki liyebisi lya bakonzi ba RDF.

Bakonzi ba Rwanda basokoli eye misala mya etuka mpo na kolandela makambo, mizali kotala likambo lyango mpe mizali kozela kosala bolukiluki na mbeba na bokatisi ndelo na bobuki mibeko.

RDF esakoli ete kimya ezali na ndelo kati na bikolo mibale.

Na ngambo ya RDC, bakonzi baye bakomaki esika yango nsima na ntango balobi na kobomba nkombo na bango ete moto oyo abetami masasi na Rwanda ayebani te kino sika.

Mpo na bakonzi baye ba ngambo ya RDC, moko te kati na baso ba RDC bazalaki kokengela ndelo azali kozanga.

Basazana eleki, likambo lya boye mpe lisamaki.

Kigali ezongisaki na Goma nzoto ya soda oyo ebataki masasi na ntango wana.

Bobomi moto oyo bosalami ntango nkanda ezali na ngambo ya RDC eye ezali kokoba kofunda Rwanda kopesa maboko na batomboki ba M23 baye bazali kobundisa mboka mpe batolaki mboka nzike kino bakoma pene na Goma.

XS
SM
MD
LG