Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame aboyi ete Rwanda endima lisusu bakimi bitumba bawuti RDC


President PAul Kagame na lisikulu liboso lya Sénat ya Rwanda, Kigali, 9 janvier 2023. (Twitter/ Présidence Rwanda)
President PAul Kagame na lisikulu liboso lya Sénat ya Rwanda, Kigali, 9 janvier 2023. (Twitter/ Présidence Rwanda)

Paul Kagame asakoli ete Rwanda ekoki lisusu te kondima bakima bitumba baye bakowuta na Ekolo Congo démocratique.

Mokonzi ya Rwanda asakolaki yango lobi loleki liboso lya Sénat ya mboka na ye. Alobi ete makambo mazali koleka na RDC matali mboka na ye te mpe alaki kolakisa yango na mokili mobimba.

Paul Kagame alimboli ete aboyi ete ekolo na ye emema mokumba moye.

Ekolo Congo démocratique efundaka Rwanda kopesa maboko na batomboki ba M23 baye bazongela kosala bitumba na mabele ma Congo wuto pene na sanza sambo.

Mpo na Kinshasa, mampinga ma Rwanda mazali kosala bitumba na nsima na ya M23.

Kigali na ngambo na yango elobaka ete bokengi bwa yango bozali na likama mpo mampinga ma RDC FARDC mabundisaka M23 na lisungi lya batomboki ba Rwanda ba FDLR baye bakima na ngambo ya Ekolo Congo démocratique nsima na genocide ya 1994 eye bafundamaka na yango.

Na sanza ya zomi na moko eleki, HCR, misala mya ONU mpo na bakima bitumba esakolaki ete pene na bayi Ekolo Congo démocratique nkoto ntuku sambo na mibale bakatisa na Rwanda.

Na mokanda banganga ya boyebi ya ONU babimisaki na suka ya mobu moleki, ekomamaki ete bilembo bya makasi bitalisi ete mampinga ma Rwanda RDF makotaki na RDC kati na sanza ya zomi na moko ya 2021 mpe sanza ya zomi ya 2022.

Union européenne lokola mpe Etats-Unis basengaki Rwanda kolongola basoda ba yango na RDC mpe kotika kopesa maboko na M23.

Mokanda mwa ba experts ya ONU mosengaki mpe na RDC kotika kosangana na FDLR mpe mangomba ma basima minduki masusu.

XS
SM
MD
LG