Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mampinga ma ekolo Rwanda masalaki bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique


RWANDA-MOZAMBIQUE-MILITARY-PEACEKEEPING
RWANDA-MOZAMBIQUE-MILITARY-PEACEKEEPING

Mampinga ma ekolo Rwanda masalaki bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique, mapesaki mandoki mpe bibundelii ya ndenge na ndenge na basimba minduki ba M23 mpo na kosala bitumba na Est ya ekolo Congo Democratique. Ezali bongo manaka ma banganga mayele to mpe ba expert ya Onu maye mabimi naino te kasi AFP emonaki, nde esakoli yango.

Kolanda manaka maye, batindi na conseil ya securite ya Onu, ba expert baye ba ONU baye basakoli ete bazali na bilembo biye bizali kolakisa na polele ete mampinga ma force de défense rwandaises (RDF) ma ekolo Rwanda mazalaki na bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique na sanza ya zomi mpe ya zomi na moko ya mobu moye. Manaka maye makobimisama na polele mikolo mizali koya, malakisi na polele lolenge kani basimba minduki baye ba M23 bazuaki ba mboka nzike na Est ya ekolo Congo Democratique mingi mingi na etuka ya Nord Kivu na Lisungi ya mapinga ma ekolo Rwanda.

Wuto ebandela ya bitumba biye, Kinshasa efundaka ekolo Rwanda na kozala nsima ya basimba minduki baye, kasi Kigali ewanganaka na koloba ete ya liboso, bitumba biye bilukami na bakonzi ba ekolo RDC mpo na kopusa maponami mazali koya na mboka na bango na mobu mozali koya, mpe bapamela mbulamatari ya RDC nakopesaka maboko na ba FDLR baye babundiska mbulamatari ya ekolo Rwanda wuto mabele ma RDC. Mikolo mileki, Ekolo Etats Unis na bikolo bisusu ba Europa bafundaki ekolo Rwanda na kopesa maboko na basimba minduki baye ba M23.

XS
SM
MD
LG