Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Soda moko ya Rwanda akufi na bobetani masasi na FARDC na ndelo pene na Goma (Sté civile)


Bayi boekgni ba Ekolo COngo démocratique basangani na ndelo ya Rwanda na Goma, Nord-Kivu, 19 novembre 2022.
Bayi boekgni ba Ekolo COngo démocratique basangani na ndelo ya Rwanda na Goma, Nord-Kivu, 19 novembre 2022.

Soda moko ya Ekolo Rwanda abomami na botenani masasi ya mampinga ma Ekolo Congo democratique na mboka Rutagara na Nyiragongo pene na Goma, kolanda societe civile.

Soda ya Rwanda yango alingki kokatisa na makasi basali mibongo ya mayuya babengamaka « Chura Chura », elobi na VOA Lingala, mokambi ya societe civile Mambo Kawaya.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique mandimi ete mabetamaki masisi na RDF ya Rwanda kasi mapesi nsango te ya liwa lya mampinga ma Rwanda.

« Mampinga ma Ekolo congo décratique, mabundisamaki na mampinga ma Rwanda. Bitumba bilandaki bipesaki nzela na ba FARDC kobengana bandongolomeso ba Rwanda baye basalaki matumoli moye, baye bozongaki bongo na ekolo na bango, » ekomi na liyebisi molobeli ya FARDC, général Sylvain Ekenge.

Général Ekenge alimboli été « RDF ekatisakina ngambo ya RDC, o’mokolo mwa minei 27 juillet 2023 na ngonga ya libwa ya ntongo.

« Na bokoti bwa bango, basoda ba mampinga ma Rwanda babenganaki bana mboka na Congo na mabela ma bango, » ebakisi general Ekenge oyo alobi te soki soda moko ya Rwanda akufaki na masasi.

Général Ekenge alimboli VOA Lingala ete ezali mpasi kondima nsango ya liwa lya soda ya Rwanda mpo bilembo bizali te.

Forum

XS
SM
MD
LG