Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 ebundisi basoda ba Burundi, elobi FARDC


Basoda ba Burundi bakomi na libanda lya mpepo ya Goma, Nord-Kivu, 5 sanza ya misato 2023.
Basoda ba Burundi bakomi na libanda lya mpepo ya Goma, Nord-Kivu, 5 sanza ya misato 2023.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FRADC) mapameli batomboki ba M23 kobundisa basoda ba Burundi baye bakomi na mboka eye mpo na botiami ya basoda ba EAC, Likita lya bikolo bya Afrika ya est.

“M23 na RDF (mampinga ma Rwanda) basali bitumba mokolo mwa motoba ya sanza ya misato 2023 na limpinga lya basoda ba Burundi ba EAC,” elobi liyebisi lya molobeli ya moyangeli ya soda ya etuka ya Nord-Kivu, lieutenant-Colonel Guillaume Ndjike Kaiko na Twitter.

Basoda ba Burundi ntuku misato bakomaki mokolo mwa eyenga na libanda lya mpepo lya Goma (Nord-Kivu) na kowuta mboka na bango mpo na botiami ya mampinga ma EAC na bitumba ya ba M23.

Basoda basusu bazali kokende na esika ya bitumba na nzela ya motuka mpo bakokisa pene na nkama moko.

FARDC epameli mpe M23 kobundisa camp to esika ya bakima bitumba mpe nzinga nzinga na Mubambiro.

Kolanda FARDC, M23 esaleli mortier 82 mpe 120 mpe mbeba mingi esalami.

Mampinga ma RDC malobi ete batomboki ba M23 btamboli likolo lya botelemisi bitumba.

Lobi mokolo mwa mibale ya mposo, mwa 7 mars 2023, nde esengeli M23 etelemisa bitumba mpe ebanda kolongwa bisika ebotola, kolanda linaka libimisamaki na Luanda nsima na bokutani ya bakambi ya batomboki na président Joao Lourenço ya Angola oyo azali mondisi ya matata na monyele ya RDC mpo na Grands lacs.

XS
SM
MD
LG