Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda epameli Belgique kolanda mbamba ya RDC mpo na koboya Vincent Karega bo’ ntoma na yango


Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Rwanda elobi esepeli te ndenge Belgique eboyi kondima Vincent Karega bo' ntoma na yango na Bruxelles.

"Ezali mpasi komona mbulamatari ya Belgique kolanda mbamba mbulamatari ya RDC mpe propagande ya mabongisi mpe ya baye bawangana" (genocide na Rwanda), epameli molobeli ya mbulamatari ya Rwanda, Yolande Makolo.

Yolande Makolo akebisi ete “elakisi makambo malamu te makokoma mpo na boyokani bwa bikolo bibale”.

Belgique na ngambo na yango elaki koyanola na nzela ya diploamtie.

“Makambo ma lolenge loye mapesamaka biyano na nzela ya diplomatie”, elobi molobeli ya ministère ya mambi ma Bapaya ya Belgique wuta Bruxelles.

Vincent Karega oyo Kinshasa awutaki kobengana na sanza ya zomi ya mobu moleki bo’ ntoma ya Kigali na RDC, atindamaki mikolo miye mpo na kozala ntoma ya Rwanda na Belgique.

Mokano mwa Kinshasa mozwamaki na matata kati na RDC na Rwanda mpo M. Karega azalaki kowanga bozali bwa basoda ba ekolo na ye nsima na batomboki ba M23.

M. Karega awutaki yambo na yango na Afrika ya Ngele epayi azalaki mpe ntoma ya Rwanda.

Forum

XS
SM
MD
LG