Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kigali na Kinshasa bayokani kosala mbango mpo na kokitisa matata na est RDC, na Angola


Président Oaul Kagame ya Rwanda (G) na Président Félix Tshisekedi (D) na Rubavu, Rwanda, 25 juin 2021.
Président Oaul Kagame ya Rwanda (G) na Président Félix Tshisekedi (D) na Rubavu, Rwanda, 25 juin 2021.

Ba ministres ya mambi ma Bapaya ba Rwanda, Vincent Biruta, na ya Ekolo Congo démocratique, Christophe Lutundula, bayokani o’mokolo mwa mposo moleki na Angola, kosala mbango mpo na kokitisa matata mazali na monyele mwa RDC, kolanda liyebisi libimisamaki nsima na bokutani na bango.

Bikolo mibale bindimi “kokoba masolo” mpe "kolimbola linaka lya botiami na lombango na misala mokanda mosengeli molandama to feuille de route” moye mondimamaki na sanza ya sambo na ngambo mibale mpe moye mosengaki botelemisi bitumba.

Président Félix Tshisekedi ya RDC na oyo ya Rwanda Paul Kagame bayokani na Luanda (Angola) mpo na mokanda mwango na lisungi lya mokokani wa bango ya Angola, Joao Lourenco, mobondisi ya Union africaine na matata maye mpe mokambi ya CIRGL, Likita lya bikolo bya bitima minene to Grands lacs.

Bokutani bwa mokolo mwa mposo kati na M. Lutundula na M. Biruta bosalami ntango M23, lingomba lya batomboki lizongeli kosala bitumba na Rutshuru, na Nord-Kivu wuto pene na mposo misato mpe mibotoli mboka mingi na territoire.

Bavandi mingi bakimi bisika na bango ya kovanda mpo na bitumba byango.

RDC ezali kofunda Rwanda kopesa M23 mabako, Kigali ezali kowangana mpe kopamela Kinshasa kobundisa M23 na lisungi lya FDLR, batomboki ba Rwanda bafundama mpo genocide kuna na 1994.

Mposo moleki RDC ebanganaki ntomba ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega.

Mikolo mibale mileki, Président Tshisekedi abengaki bana ba RDC kotelema mpe alobaki ata atie liboso masolo kati na bikolo maye maboti nanu te mbuma bitumba kaksi bikoki kosalama. Asengaki bilenge mingi komikomisa na mampinga.

XS
SM
MD
LG