Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Likita lya likolo lya Bobateli ekolo lisengi bobenganami ya ntoma ya Rwanda na RDC


Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Conseil supérieur de la Défense to likita lya likolo lya Bobateli ekolo esengi na mbulamatari kobengana ntoma ya Rwanda, Vincent Karega, na mabele ma RD Congo, na bokutani bwa lombango bosalamaki o’mokolo mwa mposo na bokambami ya mokonzi ekolo Félix Tshisekedi nsima na batomboki ba M23 kobotola mboka nzike mpe kopusana pene na Goma, enguma mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu.

Bobengani bwango bokosalama “kati na ngonga 48 nsima (mokano mwangona) koyebisa Vincent Karenga ntoma ya makoki manso ma Rwanda oyo azali nae bonga na RDC (Ekolo Congo démocratique)”, elobi liyebisi molobeli ya mbulamatari ya RDC, Patrick Muyaya atangi nsima na likita lyango.

Ntima ya bobengami bwango ezali, na ngambo moko, bokobi ya Rwanda ya kosala bitumba na RDC mpe ya kopesa maboko na lingomba lya M23 liye ezali kosalela mpo na yango.

Mokolo mwa mposo, batomboki ba M23 babotolaki mboka mpe bisika mingi lokola Kiwanja mpe camp ya basoda ya Rumangabo, na 45kms na nord ya Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu.

Matatoli ma bavandi mpe bayi société mayebisi ete batomboki baike ba M23 bamonanaki ata na 30 kms ya Goma.

Conseil ya supérieur ya Bobateli ekolo elobi ete basoda ba mampinga ma Rwanda na motango ya mingi mpenza mokoti mikolo miye na mabele ma RDC mpo na kopesa maboko na M23 na bitumba na bango na FRADC, mampinga ma RDC, kolanda ba rapports mingi epesami, kati na yango eye ewuti na Centre conjoint ya misala to operations eye esalelaka ba drones.

Ntina ya mibale bobengami bwa ntoma Karega Conseil supérieur ya bobateli ekolo elobi ezali botioli na lolendo ya bakonzi ba Rwanda bwa misala mya Nairobi mpe mya Luanda mpe bwa malako bayi molongo, mingi mingi ya ONU, ya Union africaine, ya CEA (lisanga lya bikolo bya Afrika ya est), ya SADC (Lisanga lya ntombwa ylya bikolo bya Afrika ya Nse) mpe basungi basusu baye basengi bango banso bosukisami na kozela te ya bikela bya M23 mpe lisungi linso lya libanda likopesama na yango.

Bayi molongo basengaki mpe na M23 kolongwa na kozela te mpe na kolokua elenga eloko esusu te na bisika ebobotola.

Conseil supérieur ya Bobateli epameli mpe lolenge bitumba bya M23 bitindi bituluku bya bavandi kokima bisika bya bango ya kovanda.

XS
SM
MD
LG