Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Belgique eboyi Vincent Karega bo' ntoma ya Rwanda na Bruxelles


Vincent Karega, ntoma ya Rwanda ya kala na Kinshasa.
Vincent Karega, ntoma ya Rwanda ya kala na Kinshasa.

Ekolo Belgique eboyi kondima Vincent Karega bo’ ntoma Rwanda etindi mpo na kolakisa elongi na yango kuna. Bakonzi ba Belgique bapesi ntina ya boboyi te.

Vincent Karega azalaki yambo ntoma ya Rwanda na Kinshasa kasi Kinshasa ebanganaki ye mpo na maloba ma ye ya kowangaka bozali bwa basoda ba Rwanda na nsima ya ba M23.

Vicent Karega aloba mpe été azali ngambo moko mwana ya Ekolo Congo democratique epayi atanga mpe asilisa kelasi.

Kigali etindi bongo sika Dieudonne Sebashongore ntoma na yango na Rwanda.

Forum

XS
SM
MD
LG