Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alobi ayebi likambo te na bofundami bwa ye


Mokonzi ya kala ya Etats-Unis ya Amerika Donald Trump na ndako ya bosambisami ya état ya New York, 4 sanza ya minei 2023. Seth Wenig/Pool via REUTERS
Mokonzi ya kala ya Etats-Unis ya Amerika Donald Trump na ndako ya bosambisami ya état ya New York, 4 sanza ya minei 2023. Seth Wenig/Pool via REUTERS

Donald Trump, mokonzi ya kala ya Etats-Unis, atikaki ndako ya bosambisami na Cour suprême ya état ya New York mpe azongaki epayi avandaka na Floride o'mokolo mwa mibale (4 sanza ya minei 2023) nsima na koyanola mbala ya yambo na bazuzi na bofundami bwa ye mpo na misolo apesaki basi ntango ya campagne ya maponami ma mokonzi ya mboka ya 2016, na ntina ya kokanga bango momoko na bosangani azalaki na yango na bango.

"Na yebi likambo te," nde eyano mokonzi ya kala ya Etats-Unis apesaki na zuzi Juan Merchan.

Boyoki bwa biyano bokoki kobanda na sanza ya yambo ya 2024 na bosambisami boye.

Zuzi atikaki ye akende mpe apekisi ye ata eloko te yambo na boyoki boye bosengeli kobanda mikolo mikoya.

Basambeli ba Donald Trump balobi bakotelemela bobengami ya kosambisama boye.

Ezali “mpasi” mpe “mintungisi”, elobi avocat ya Donald Trump, Todd Blanche, "tokobundisa yango".

Zuzi alobeli mpe mbeba ya kobuba l’Etat Donald Trump asalaki mpo na mpako na misala mya ye.

Ba républicains, lingomba lya Donald Trump, na basambeli ba ye, balobi ezali nde likambo lya politiki.

Donald Trump azali na molongo ya yambo ya ba rébublicains baye basakoli koluka kolakisa elongi ya lingomba na bango mpo na kowelela ebonga ya mokonzi na maponami ma 2024.

XS
SM
MD
LG