Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Molongani ya mokambi ya suku ya nse ya Parlement ya Amerika abetami marteau


Mokambi ya suku ya nse ya Ndako ya bokeli mibeko ya Etats-Unis, Nancy Pelosi (D), na molongani wa ye Paul Pelosi na gala "Time 100" na Lincoln centre, New York, 23 ya sanza ya minei 2019.
Mokambi ya suku ya nse ya Ndako ya bokeli mibeko ya Etats-Unis, Nancy Pelosi (D), na molongani wa ye Paul Pelosi na gala "Time 100" na Lincoln centre, New York, 23 ya sanza ya minei 2019.

Moto moko akangami nsima na kobeta Marteau molongolani ya Nancy Pelosi mokambi ya suku ya nse parlement ya Etats-Unis na ndako na ye na San Franciso.

Molongani ya Nancy Pelosi mokambi ya ba democrates na Congres apesami lipaso, moto yango azalaki nde koluka Nancy Pelosi.

Moto yango angaki “Nancy azali wapi” ntango akotki na butu ya mokolo mwa minei ndako ya libota lya Pelosi.

Moto yango akangami mpe bolukiluki bozali kosalama.

Bobangi bokomi kati na bayi politiki, mingi mingi bayi lingomba lya ba democrates baye bazali kosambisa balandi ba Donald Trump, mokambi ya kalaka ya Amerika, mpo na eyoma basalaki le 6 janvier 2021 na ndako ya Congres, Capitol, mpo nak kobota elonga ya Joe Biden na maponami ma mokonzi ya mboka.

Misala mya bolukiluki mya parlement mifundaki Donald Trump mibengisaki ye mpo ete asamba na eyoma eye.

XS
SM
MD
LG