Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kevin McCarthy aponami bo’ moyangeli ya Congrès ya Amerika


Kevin McCarty moyangeli ya sika ya Congrès Etats-Unis nsima na bobnami bwa ye na bo' mokambi ya suku ya balakisi bilongi, na Capitol, Washington DC, 7 janvier 2023.
Kevin McCarty moyangeli ya sika ya Congrès Etats-Unis nsima na bobnami bwa ye na bo' mokambi ya suku ya balakisi bilongi, na Capitol, Washington DC, 7 janvier 2023.

Moyi lingomba lya ba républicains, Kevin McCarthy aponami bo’ moyangeli ya Suku ya balakisi bilongi ya parlement ya Etats-Unis na ngonga ya yambo ya mokolo mwa mposo na maponami ya mbala ya zomi na mitano, kati na bobendani ya bayi politiki, mingi mingi ya lingomba lya ye ya ba républicains.

Boponami bwa bopesi mpe nzela ya kozala moyangeli ya Congrès, to ya bosangani ya suku mibale ya parlement, Sénat na Suku ya balakisi bilongi.

Maponami naye ma mbala ya zomi na mitano masalamaki na butu makasi, nsima na minuit, na bobendani na koluka kopona mokambi ya suku ya nse ya parlement.

Matata mazalaki na butu. Bayi politiki babomonanaki kolakisana misapi mpe, baike, kobendana na nzoto na maponami ya mbala ya zomi na minei, mpamba te ezangaki kaka moto moko mpo ete M. Mc Carthy aponama na ntango yango.

Balandi ba M. McCarthy bazalaki koswana na ba républicains basusu, mingi mingi bayi ngambo ya Donald Trump mokonzi ya kala, baye bazalaki kofundama koboya kopona moninga ya lingomba na bango.

Kasi, ewumelaki lisusu nsima na boswani boye. Kimya ekotaki mpe bakeli mibeko banso baponaki lisusu mpo na mbala ya zomi na mitano mpe M. McCarthy alongaki na 216.

Matata mazalaki wuto mokolo mwa mibale mwa mposo ntango maponami maye mabandaki mpo na koyeba nani esengelaki akitana na démocrate Nancye Pelosi.

Ba républicains bazali mingi koleka na suku eye ya balakisi bilongi mpo balongaki na maponami ma sanza ya somi na moko eleki, maponami ma kati kati ya bokonzi ya président Joe Biden, kasi bazalaki na kokoka te kopona moko na bango.

Ngambo moko ezali nsima na mokonzi ya la Donald Trump mpe basusu bazali nsima na M. Mc Carthy.

Ba démocrates nde baponaki mingi monginga na bango oyo alongi te.

Matata maye mapesi mapapu na M. Joe Biden mpo na maponami makoya na 2024.

M. Trump apesi losako na M. McCarthy na réseau social na ye Truth Social kasi alobi esengalaki boponami boye bosalama na ndenge ya malamu.

Mc Carthy, na mibu 57, alaki kosala na ngambo inso, mpe andimi boko na bosenga ya bayi démocrates na ba républicains baye bazalaki kotelemela ye baye basuki na kolekisa ye.

« (Mpo na) nkwokoso ya Amerika eye ekowumela -nyongo mpe bomati bwa lingomba lya ba communistes ya Chine- Congrès esengeli ezala na maloba moko, » elobi M. McCarthy.

Président Joe Biden oyo azali démocrates ye mpe alaki kosala elongo na M. McCarthy.

XS
SM
MD
LG