Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nancy Pelosi azali kotika ebonga ya mokambi ya Suku ya balakisi bilongi


US-POLITICS-CONGRESS-PELOSI
US-POLITICS-CONGRESS-PELOSI

Nancy Pelosi asakoli ete azali kotika ebonga na ye mokambi ya ba démocrates na suku ya nse ya Parlement, suku ya Balaksisi bilongi, mpo na ndako ya bokeli mibeko ekoya eye ekokambama na ba républicains baye balongi maponami mawuti kosalama mpo suku eye mpo na katikati ya bokonzi ya Joe Biden.

"Nakopesa nkombo te na bokambi ya ba démocrates ya Congrés ekoya,," alobi na lisikulu lya ye o'mokolo mwa minei.

Mme Pelosi na mibu ntuku mwambe na mibale (82) asali lisikulu na ndako ya bokeli mibeko na Washington DC. Alaki kotika ebonga na bilenge to na bato ba sika.

Président Joe Biden, oyo azali mpe démocrate, apesi ye losako bo’ "mobundi ya makasi ya démocratie".

Mme Pelosi azali mwasi ya yambo ya kokamba Suku ya nse ya Parlement ya Etats-Unis.

Asali mibu ntuku misato na mitano (35) na Suku eye.

Na lisikulu lya ye, alobeli makambo malamu asala mpe akutana na yango mpe ya mabe, lokola eyoma ya balandi ba mokonzi ya kala Donald Trump le 6 janvier mpo na koboya elonga ya Joe Biden. Bato pene na sambo bakufaki na eyaoma yango.

Akokoba kosala na suku eye bo’ molakisi elobi ya état ya Calforinie.

XS
SM
MD
LG