Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba républicains bapameli bomeki bobengisami bwa Trump liboso lya bazuzi


Trump Legal Troubles Protests
Trump Legal Troubles Protests

Bakambi ba lingomba lya ba republicains bazali kotelemela bobengi bwa Donald Trump liboso lya bazuzi, nsima nungu nungu kobima mposo moleki ete, Donald Trump akobengama mpo na kosamba liboso lya bazuzi mposo moye.

Mike Pence, vice-président ya kala ya Etats-Unis na bokonzi ya Donald Trump alobi ete bobengisami boye bozali likambo lya politiki.

Amituni, lintomba ya koluka kosambisa Donald Trump likozala nini mpo na ekolo, na biyano apeaski na television ABC.

Donald Trump afundama na kopesa mosolo koleka dollars nkoto nkama moko ta ntuku misato na mwasi moko asalaka ba bililingi bya bolumbu, na kombo ya Stomy Daniels, mpo na koluka kokanga ye monoko na koloba yango na polele te nsima na kosangisa na ye nzoto.

O mokolo mwa mposo moleki, Donald Trump asakolaki ete akondima kokende liboso lya bazauzi soki babengi ye, kasi asengaki na balandi baye na kobima o bala bala mpe kotambola mpo na kotelemela bokangemi bwa ye.

Soki Donald Trump abengami liboso lya bazuzi, akozala Mokonzi ya kala ya liboso ya Etats Unis na kosambisama liboso lya ba zuzi.

XS
SM
MD
LG