Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alobi bayi Congrès baye batindi ye kosamba bazali kolukela ye kaka makambo


Donald Trump holds rally in Ohio
Donald Trump holds rally in Ohio

Trump alobi bayi Congrès batindi ye kosasamba bazali kolukela ye kaka makambo

Donald Trump Mokonzi ya mboka ya kala awa na Etats-Unis asengami kosamba na kolopaka ndayi mpo na eyoma balandi baye basalaki na Congrès ya Amerika le 6 janvier 2021 na mayela ya kopekisa bondimami bwa elonga ya Joe Biden na maponami ma mokonzi ya mboka.

Mokano mwango mosakolamaki lobi na misala mya bolukiluki mitiamaki na Congrès to suku mibale ya parlement awa na Etats-Unis.

Na ngambo ye, Donald Trump oyo azali républicain, ayanoli lelo na mokanda atindeli Bennie Thompson mokambi ya misala myango, ete ezali Boluki sili na moto mwaye to mpe boluki bwa ba bandoki.

"Misala miye baponamaki te misala nde liseki na kosambisa liye litikala kosalama te na mboka eye… Bosambisami ya malonga bozali te, boyoki ya ngambo inso bosalami te, ba républicains ba 'solo' mpenza bazali na kai te, mpe seomb ezali te lokola bolobelaki te mpo na moyibi na maponami," ekomaki Trump na réseau social na ye.

Misala to commission yango ya Conrès ezali kaka na ba républicains mibale mpe ba démocrates sambo kasi esengeli esukisa mosala mwango na suka ya mobu mpe epanzana nsia na yango.

Mpo na Donald Trump, ezali lokuta mpo alongaki maponami ma 2020, lokola akobaka koloba yango.

Balukiluki ba Congres balobi ete bilembi mingi bimonisi ete Donald Trump nde atindaki eyoma eye ememamki liwa lya bato koleka sambo mokolo le 6 janvier na Capitol.

Baike baye bamanyolaka politiki ya Amerika bakanisi ete M. Trump akoboya na ye kokende kosamba.

M. Trump akoki kutu komema likambo lyango liboso lya bazuzi mpe ekozwa ntango molayi mpo likatama.

Nzokande, ba rébulicains, lingomba lya M. Trump bawuti kobongola motonga ya bato baleki na Suku ya balakisi bilongi to suku ya nse ya Parlement. Bakoki kobongola makambo ntango bakovandisama na ebonga mobu mokoya.

Donald Trump afundami mpe na ngambo esusu mpo na makambo masusu lokola komema na ndako na ye mikambo mya sekele mya l’Etat mpe lisusu koboya kofuta mpako mpe kobuba l’Etat na ba compagnies ba ye.

XS
SM
MD
LG