Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alongoli etumbu Trump apesaki na bakambi ba CPI


Président Joe Biden na Bureaue Oval, na Maison Blanche, Washington, 3 février 2021.
Président Joe Biden na Bureaue Oval, na Maison Blanche, Washington, 3 février 2021.

Mbulamatari ya Joe Biden elongoli etumbu mokonzi ya kala, Donald Trump apesaki na bakambi ba CPI (Cour pénale internationale).

Le 2 septembre 2020, M. Trump apekisaki visa na procureur mpe bakambi basusu ya CPI mpo bakobaki kolendela basoda ya USA na mbeba basalaki na Afghanistan.

Secrétaire d’Etat to ministre ya mambi ma Bapaya ya Etats-Unis, Antony Blinken nde asakoli bolongoli bwa etumbu yango na liyebisi.

M. Blinken akomi ete Etats-Unis ezali "kokoba kotelemela mokano ya CPI mpo etali Afghanistan mpe Israël kasi abakisi ete Washington elobela yango na nzela ya masolo na baye banso bazali na makambo CPI esalaka na esika ya kopesa etumbu".

XS
SM
MD
LG