Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamala Harris akomi mwasi ya liboso ya kozala mokonzi ya Etats-Unis


President Joe Biden na Vice-Presidente na ye Kamala Harris na Maison Blanche na Engumba Washington , na Etats-Unis, o'mokolo ya 15 novembre 2021 (Photo Reuters/Leah Millis)
President Joe Biden na Vice-Presidente na ye Kamala Harris na Maison Blanche na Engumba Washington , na Etats-Unis, o'mokolo ya 15 novembre 2021 (Photo Reuters/Leah Millis)

Na Etats-Unis, Tata mokonzi Joe Biden atikelaki bokonzi na vice-présidente na ye Kamala Harris, mpo na pene na ngonga moko na ndambo ntango alalisamaki mwa moke na anesthésie générale.

Joe Biden, ya mibu 77 azongelaki bokonzi bwa ye nsima na anethésie.

Azalaki kosala examen ebengami coloscopie, eye etali bokonongono bwa colon, na centre médical Walter Reed, pemebeni ya engumba mokonzi Washington. Joe Biden, azali na mibu 79. Asalaki nde bilan na ye ya santé na ye.

Ezalaki nde mbala ya liboso mwasi azala mokonzi ya Etats-Unis, atako ekozalaki kaka mpo na pene na ngonga moko na ndambo.

Kamala Harris azwaki motu ya bundeli bya mapinga ma Etats-Unis na ya bibundeli bibengami "armes militaires et nucléaires" bya mboko na ye. Afandaki ma ngambo ya ouest ya Maison Blanche, esika na ye ya mosala.

Oyo ezali te mbala ya liboso mokonzi ya etats-Unis a pesa bokonzi na ye na nginga moke na Vice-president engebene na buku ya mboka to Constitution.

Na 2002 na 2007, mokonzi ya kala ya Etats-Unis George W Bush, asalaka pe bongo.

Mwasi ya liboso ya kozala vice-présidente ya Etats-Unis

Mama Harris, na mibu 57, a azali mwasi ya liboso ya moyindo akoma vice-présidente des États-Unis. Aponama na esika eye na Joe Biden tango azalaki naino candidat ya ba démocrates po na maponami ma bokonzi ya mboka na 2019.

Aloba boye: "Nazali na lokumu ya koyebisa ete naponi Kamala Harris, mobundi ya mpiko ya bato bazali na mpasi mpe moko na basali ba l’Etat, b’o colistière (oyo akozala na ngai nkasa ya maponami).

Kamala Harris azalaki procureure générale ya kala. Azalaki moninga ya mosala ya mwana ya Joe Biden, Beau Biden, oyo akufaki na 2015 po na cancer.

Tata ya Kamala Harris, Donald Jasper Harris awuta Jamaïque. Mama na ye, kondo Shyamala Gopalan Harris , auta na India. Bakutana na universite ya Berkeley ya Californie na etats-Unis epayi wapi bango mibale bakendeki kosala kelasi. Mama na ye akufa na 2009 na cancer ya motiopi mobengami colon.

Kasi tata ne ye, Donald Harris, azali naino na bomoyi. Akomi na mibu 83. Azali moteyi ya monene ya nkita to economie ya kala ya universite Standfort na Californie.

Kamala Harris azali na ndeko moko ya mwasi, Maya Lakshmi Harris. Ndeko na ye azali avocate. Asala pe na Hillary Clinton tango ya maponami ya bokonzi bwa mboka ya 2016 oyo mama Clinton awelelaki, libosa alongama na Donald Trump.

XS
SM
MD
LG