Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Policier moko akufi mpe mosusu azoki nsima moto moko kotambola likolo bango na motuka na Capitole


US-politics-crime-Capitol
US-politics-crime-Capitol

Policier moko akufi mpe mosusu azoki nsima moto moko kotambola likolo na bango na motuka na Capitole, na Congrès ya Etats-Unis, elobi mokambi ya police ya Washington, Yogananda Pittman.

"Nsima na koniata ba policiers mpe kotuta motuka na ye na barrières, motambwisi yango abandaki kopusana pene na policiers basusu na mbeli na maboko mpe ba policiers baye babetaki ye masasi," ebakisi Mme Pittman na balangisi sango.

Likambo lyango lisalami sanza misatu nsima na eyoma balandi ba Donald Trump, mokonzi ya kala, basalaki le 6 janvier 2021 mpo na koboya elonga ya Joe Biden.

Bayi Congrès bazali sika na loyi.

XS
SM
MD
LG