Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba ya sembo mpo na Donald Trump


Donald Trump (2 D) na bana ba ye Ivanka (2 G), Eric (G), na Donald Trimp Junior (D) na Trump Tower, New York, 11 janvier 2017
Donald Trump (2 D) na bana ba ye Ivanka (2 G), Eric (G), na Donald Trimp Junior (D) na Trump Tower, New York, 11 janvier 2017

Mokolo mwa misato 21 septembre 2022 moleki mozalaki mokolo mwa kotungisama makasi mpo na mambi ma sembo mpo na mokambi ya kala ya America Donald Trump. Makambo mibale ya minene makweyelaki ye, bakisa na makambo masusu maike maye azalaki kobunda na yango.

Ya liboso, Procureur général ya New York Letitia James afundi mokonzi ya kala ya Amerika na rapport to mpe mokanda mozali lokasa koleka 200 moye abimisi. Mokanda mwango molakisi na polele lolenge Donald trump na bana ba ye basato mpe Fondation na ye, batonga mombongo na bango na likolo na lokuta mpo na kodefa mosolo na ba banques, mpe bakima kofuta mpako ya Leta.

Mpo na yango, Mama James azali koluka ete Trump na bana baye bazua etumbu ya kofuta mosolo koleka dollars 250 millions, mpe Trump na bana ba ye mpe orgnisation na ye bapekisama kosala lisusu mombongo na Etat ya New York.

Ata ko likambo lyango lizali likambo ya L'Etat, ezali naino te na te ya kokweyisa Donald Trump na likambo ya mabe.

Na ngambo na ye, Donald Trump ayanoli na bowangani makasi bofundi boye mpe alobi ete ezali kaka bayi politiki nde bazali kokosela ye makambo mpo na kokweyisa ye.

Ya mibale, ezali mokano moye bazuzi ba tribunal ya appel bazui na likambo ya mikanda miye Donald Trump amemaki na ndako na ya na Mar-a-Lago.

Bazuzi baye bapesi ndingisa na Département ya Justice ya America ya kotala na mikanda miye amemaki, miye etiamaki elembo lokola biloko bya kobombama biyr bizwamaki na ntango ya bolukiluki na ndenge ya mbalakaka ya FBI na sanza eleki.

Na kati ya Bazuzi baye bapesi ndingisa na département ya Justice ya kofongola mikanda miye, mibale na kati na bango baponamaka na Donald Trump ntango azalaka mokonzi.

Donald Trump atikali na nzela yoko ya kokanga mokano ya ba zuzi baye. Ezali bongo kosenga na Cour suprême ya Etats-Unis kotala likambo lyango na lombango.

Makambo masusu mayike mazali kolandelama mpo na Donald Trump na bazuazi.

Ezali mpe lisusu na bolukiluki na Etat ya Géorgia epayi wapi elobamaki ete amekaki koyiba maponami ya 2020 na état eye.

Kasi mokambi ya kala ya Etats-Unis awanganaki makambo maye manso.

Kaka lobi loleki Comité ya Chambre ya bakeli mibeko eye ezali kolandela maye malekaka mokolo mwa le 6 janvier 2021, ntango wapi balandi ba Donald Trump bakendaka kosala mobulu na Capitole, basakolaki ete bakozongela kolakisa makambo ya mabe maye Donald Trump asalaka mokolo wana o mposo mozali koya.

Département ya Justice na ngambo na yango ezali mpe kolandela yango mpe moko na boluki luki na maye Donald Trump alobaka ete alongaka maponami ma 2020 mpe bayiba ye yango, maloba maye mamemaki na balandi ba ye kokende kobuka mpe kosala mobulu na Capitole .

Makambo manso maye mazali kosalema ntango Donald Trump azali komilengele mpo na kobanda campagne présidentielle ya 2024 na ngonga eye azali kofunda na makambo manso maye ete ezali nde ba démocrates nde bazali nsima ya makambo maye mpo na kopekisa ye kozala candidat na maponami ma 2024 mazali koya.

XS
SM
MD
LG