Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Facebook eboyi kozongisa compte ya Donald Trump


Président Donald Trump na Washington, 5 mai 2021.
Président Donald Trump na Washington, 5 mai 2021.

Conseil ya surveillance to likita likengelaka compagnie Facebook eye esangisi ba réseaux sociaux lokola Facebook na Instagrarm, eboyi kozongisa ba compte ya Donald Trump, mokonzi ya kala ya USA. Elobi ekotala likambo lyango lisusu nsima na sanza motoba.

Elobi ekotala likambo lyango lisusu nsima na sanza motoba.

Facebook, lokola Twitter mpe Google, ekangaki compte ya 45e président ya Etats-Unis nsima na eyoma balandi basalaki na Capitol, na Washington, mpo na komeka kopekisa Congrès kondima elonga ya Joe Biden le 6 janvier 2021.

Bato pene na zambo bakufaki na eyoma yango,

Yambo na yango Facebook mpe Twitter ekebisaki M. Trump mbala mingi na maloba makasi azalaki kotia yambo mpe ntango ya campagne mpo na maponami.

Nzokande, M. Trump asi askolaki ete akeli blog moko na site internet na ye nan tina ya koyeba kopesa sango etali ye.

Facebook mpe Twitter efundama mbala mingi, wuto bokonzi ya Barack Obama na kozala na mpifo na maponami to mpe na kozala nzela banguma nba Amerika bamikotisaki na politiki ya mboka mpe bamemaki maponami na lolenge moko to mosusu.

XS
SM
MD
LG