Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Muyambo alongwe Union sacrée mpe alobi akowelela maponami ma mokonzi ya mboka


Jean-Claude Muyambo (D) ntango azalaki ministre ya mambi ma Bomoto elongo na Chikez Diemu (G) ministre ya Bobateli ekolo, na Goma, Nord-Kivu, 15 octobre 2007
Jean-Claude Muyambo (D) ntango azalaki ministre ya mambi ma Bomoto elongo na Chikez Diemu (G) ministre ya Bobateli ekolo, na Goma, Nord-Kivu, 15 octobre 2007

Jean-Claude Muyambo, mokambi ya lingomba lya politiki Scode (Solidarité congolaise pour le développement) asakoli ete alongwe na liboke Union sacrée liye lizali nsima na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi, mpe alaki kopesa nkombo mpo na kowelela maponami ma mokambi ya mboka na décembre 2023.

M. Muyambo asakolaki yango wuto Lubumbashi, na Haut-Katanga, o;mokolo mwa mibale ya mposo, le 3 janvier 2023.

"Na kopesa nkombo mpo na kowela maponami mpe tokosolola na Moïse Katumbi mpo na koyokano soki nani akozala mokambi. Esengeli biso tokamba ekolo", elobi M. Muyambo liboso lya bapanzi sango.

M. Muyambo alobi ete RDC ekolonga bitumba te na kobunda kasi na masolo.

Akundoli ete ntango azalaka ministre na 2007 masolo mingi masalamaki mpo na kimya.

Moïse Katumbi oyo azali mpe moyi Haut-Katanga lokola M. Muyambo asakolaki mpe mikolo mileki ete akowelela ye mpe lokola maponami lokola lingomba lya ye Ensemble pour le république endimi ye.

XS
SM
MD
LG