Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moise Katumbi atelemeli boyeyi bwa mampinga ma ekolo Soudan du Sud na RDC.


BELGIUM-RDCONGO-POLITICS-VOTE-OPPOSITION
BELGIUM-RDCONGO-POLITICS-VOTE-OPPOSITION

Moise Katumbi mokonzi ya Ensemble pour la Republique mpe candidat na bokonzi bwa ekolo na maponami mazali koya na 2023 atelemeli mokano mwa boyeyi bwa basoda ba ekolo Soudan. Na makomi ma ye lelo, Moise Katumbi azali koloba ete ezali polele te ete, bato baye basakoli ete bazali koya kosunga ba Congolais, bango moko bazali kozua lisungi lya mampinga ma ekolo Ouganda mpo na koluka kosilisa bozangi bokengi na mboka na bango moko.

Asakoli ete ezali komonana lokola ezali koseka mapinga ma RDC. Mpo na ye, esengeli nde kopesa mapimnga ma RDC makoki maye basengeli na yango, mpe kozala na boyokani ya solo bikolo bya makasi.

Lobi loleki, Ekolo Soudan du Sud esakolaki ete ekotinda basoda nkama sambo na ntuku mitano na est ya ekolo Congo Democratique mpo na kobunda elongo na ba soda basusu ba bikolo bya EAC na Est ya RDC, na ntina ya komema kimya pe kobatela bayi mboka. Basoda baye bazali komibogisa wuto koleka sanza motoba mpo na koya o mabele ma RDC, esakoli lobi bakambi ba mampinga ma Soudan.

Ba soda baye bakobakisama na basusu ba bikolo bya EAC baye basi bakoma o mabele ma ekolo RDC mpo na kosunga na kobundisa mangomba masusu ma basimba minduki, na kati na bango baye ba M23.

XS
SM
MD
LG