Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Matata Ponyo, Denis Mukwege, mpe Martin Fayulu bafundi Felix Tshisekedi na kotya bokengi bwa ekolo na maboko ya bapaya.


DRCONGO-KENYA-CONFLICT
DRCONGO-KENYA-CONFLICT

Ministre wa yambo ya kala Matata Ponyo, Mbano ya kimya Dr Denis Mukwege, mpe mokonzi ya Ecide Martin Fayulu bazali kofunda mokonzi wa ekolo RDC Felix Tshisekedi na kotya bokengi bwa mboka na maboko ya bapaya. Na mokanda batye nanzaka elongo, bato baye misato bakanisi ete lolenge mokonzi wa ekolo azali kokamba ekolo ezali na ndenge ya malonga te, mpe azali koluka kokata mabele ma ekolo moke moke mpo bolamu bwa bapaya. Bazali kotelemela mpo na yango mokano mwa mokonzi wa ekolo ya kobengisa mampinga ma bapaya koya kobunda o mabele ma RDC o etuka ya Nord Kivu.

Na maye matali bitumba nan gambo ya Est ya ekolo Congo Democratique, basengi na botomboki ba M23 na kokitisa mandoki mpe kolongwa o bisika biye basi bazua, mpe basengi na conseil ya securite ya nations unis na kotelemela na polele ekolo Rwanda mpo na lisungi ezali kopesa na basimba minduki baye ba M23.

Na maye matali maponami mazali koya na mobu 2023, Matata Ponyo, Denis Mukwege mpe Martin Fayulu basakoli ete bazali komona mpasi mingi na lolenge maponami maye mazali kobongisama ata kosangisa bato banso te, mpe bozangi botosi bwa buku likonzi na kolandelaka bayi politiki baye basi bapesi kombo na bango na maponami mazali koya lokola ministre wa yambo ya kala Matata Mponyo.

Félix Tshisekedi mokonzi ya RDC asi asakola ete akozala candindat na maponami mazali koya na ekolo RDC o mobu 2023. Na kati ya baye basi basakolaki mpe ete bakozla ba candidats na maponami maye ezali mpe na Martin Fayulu, Matata Mponyo mpe Moise Katumbi.

XS
SM
MD
LG