Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya kala ya ANR Kalev Mutond abengisami na jeudi na parquet général


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ANR (Agence nationale des renseignements - Misalsa mya ekolo mpo na bokengi) abendisami na Parquet général o’mokolo mwa minei.

"Nabengisi yo koya na ndako na ngai ya mosala… na palais de Justice… jeudi 18 février 2021 na 10 h00 mpo na sango moko etali yo," ekomi Avocat général Robert Kumbu Phanzu na mokanda VOA Lingala emoni.

Elobani te ntina nini ya bobengisamai na ye.

Kasi Kalev Mutond afundami na bato mingi mpo na monyokoli asalaki likolo na baye akangaki.

Kati na bato baye Me Jean-Claude Muyambo, Christopher Ngoyi ya société civile mpe Vano Kiboko.

Basusu lokola bayi politiki basusu, Franck Diongo, Gecoco Mulumba na Carbone Beya, moko na babundi mpo na bomwana mboka ya Filimbi bango mpe balaki mikolo mileki kofunda mokambi ya kala na bokangi mbango mabmba mpe konyokolo bango.

XS
SM
MD
LG