Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

TGI epesi mposo moko na ngambo ya Kalev Mutondo nsima na bobandi bosambisami


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Bazuzi ya Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe epesi mposo moko na ngambo ya Kalev Mutondo, mokambi ya kala ya ANR, nsima na bobandi ya bosambisami bwa ye na kofunda na Jean-Claude Muyambo, Cyrille Mupompa na Joseph Kapepula.

Bosambisami bowumelaki mpenza.

Bazuzi bapesi kaka mposo moko na ba avocats ba Kalev Mutondo baye basengaki ntango eye mpo na kopesa nzela ete akoka kozala na bosambisami na bosonmi nyonso.

Ba avocats basengegaki nde mposo misato.

Molangani ya Kalev Mutondo asengaki mpe kotatola kasi bazuzi bapesi ye nzela te.

Jean-Claude Muyambo, Cyrille Mupompa na Joseph Kapepula bafundaki Kalve Mutondo mpo na monyokoli mpe bokangami na kobuka mibeko

Kalev Mutondo mpe afundaki bato baye basato mpo na lingambo lya bato mabe.

Kalev Mutondo akota na kobomama wuto parquet ya TGI ezalaki kobengisa ye.

Procureir atinda mokanda ya kolukisa ye kasi ba avocats baye basengaka bolongwi na yango.

XS
SM
MD
LG