Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

TGI Kinshasa/Gombe elobi ekoki kosambisa Kalev Mutondo te


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe elobi ekoki te kosambisa mokambi ya kala ya Agence nationale ya renseignement (ANR), Kalev Mutundo, nsima na bosenga basambeli ba ye.

TGI ya Kinshasa/Gombe esengelaki epesa eyano na yango lelo na matata mazalaki kati na ministère public na ba avocats ba Kalev Mutondo.

"Na kotalaka molongo na ya Administrateur général ya ANR, mpe mpete na ye ya Administrateur principal (mokambi mwa ya yambo) ya ANR na ntango ya makambo afundelami na yango, mpete ekokani na Directeur général na administration publique, TGI Kinshasa/Gombe esakoli ete ekoki te kosambisa Kalev Mutondo," elobi moko na ba avocats baye.

Kalev Mutondo afundamaki na Jean-Claude Muyambo, Cyrille Mumpapa na Joseph Kapepula Mutond na kokanga bango mpamba mpamba mpe konyokolo bango na kobuka mobeko ntango azalaki kokamba ANR.

Mokonzi ya kala ya ANR atikala komonana lisusu te wuto alukama sanza mingi na parquet ya Cour grande instance ya Kinshasa/Gombe.

Alongolamaki mosala nsima na bokoti na bokonzi ya Félix Tshsekedi oyo atiaki na ebonga ya AG principal ya ANR Inzun Kakiak oyo azalaki molandi ya Kalev Mutondo.

XS
SM
MD
LG