Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba ministres basato ba lingomba ensemble pour la republique ya Moise Katumbi batiki mosala na bango


GERMANY-US-POLITICS-DIPLOMACY-G7-FOOD-CRISIS
GERMANY-US-POLITICS-DIPLOMACY-G7-FOOD-CRISIS

Ba ministres basato ba lingomba ensemble pour la republique ya Moise Katumbi batiki mosala mwa bango . Ezali bongo ministre d'État, ministre ya Plan Christian Mwando, Chérubin Okende ministre ya Transports Voies de Communication mpe Désenclavement , mpe Véronique Nkulu Vice-ministre ya Santé Publique, Hygiène et Prévention.

Félix Tshisekedi mokonzi ya RDC nde asakoli yango na bokutani bwa mbulamatari boye bosalemi lelo na engumba Kinshasa. Ba ministre baye basato ba lingomba ensemble pour la republique basakoli ete bazui mokano moye sima manaka to Congres ya parti politiquena na bango Enemble pour la Republique maye masalemaki na engumba Lubumbashi mikolo mileki epayi wapi Moise Katumbi asakolamaki bo candidat ya parti na ye, mpe bolongwi bwa ensemble pour la Republique na Union sacrée ya mokonzi wa ekolo.

Na ngambo esusu ba misistres basusu ya Ensemble pour la republique lokola VPM mpe ministre ya mambi ya bapaya Christophe Lutundula, ministre Modeste Mutinga, ministre Serge Nkonde ya Sport batikali na mbulamatari mpe basakoli ete, balingi kotikala pene na mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi.

Mikolo mileki na sanza ya sambo ya mobu moye, Muhindo Nzangi ministre ya enseignement superieurs et Univesitaire asakolaka bolongwi bwa ye na lingomba eye ensemble mpo na kokela ya ye parti politique na kombo ya Action des volontaires pour la relève patriotique (AVRP).

Moïse Katumbi asakolaki o mikolo mileki ete akozala candidat mpo na kowela kiti ya mokonzi wa ekolo na maponami mazali koya na mobu 2023, mpe bolongwi bwa ye na Union Sacree na kolobaka ete, lingomba liye lisali mosala malamu te, yango azui mokano moye mpo na kobikisa ekolo.

XS
SM
MD
LG