Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko 40 batiki Katumbi


Moise Katumbi
Moise Katumbi

Pene na bakeli mibeko ntuku minei bazalaka’ nsima na Moïse Katumbi basengi ye kopona kati na kozala na opposition to na ngambo ya mbulamatari.

Basengi Moïse Katumbi kozwa mokano ya kolongola mbala moko bato baye banso na mbulamatari kasi bango balobi batikali nsima na president Félix Tshisekedi.

Bakeli mibeko baye balobi bazali ya ngambo ebengami "Courant progressiste révolutionnaire" ya liboke ya politiki Ensemble pour le changement mpe babeti sete ete bazali bazali kati na Union sacrée eye ezali nsima na président Félix Tshisekedi.

Bayanoli bongo na lisakoli molobeli ya Moïse Katumbi, Olivier Kamitatu Etshou asalaki mikolo mibale mileki. Basengi ye kosala bokeseni kati na lingomba lya politiki Ensemble pour la république liye likelamaki kaka mibu mibale mileki na liboke na bango na nkombo ya Ensemble pour le changement liye lisangaisi mangomba mingi ma politiki.

Bakeli mibeko baye bapameli Olivier Kamitatu kosenga ete bakambi basusu ba Misala mya maponami batiama mpo bazali sika bandimamaka te na ngambo inso ya politiki.

Mpo na bango, kosala boye ekopekisa ete maponami masalama na ntango ebongisama na Buku likonzi. Ngambo ya Moïse Katumbi na baye bazali nsima na président Tshisekedi bazali kondongwana mpo etali mbano ya mosala ya mbulamatari.

Bayi Moïse Katumbi bazali koboya komema mokumba na yango kasi ngambo ya Felix Tshisekedi balobi bakokabola mbano yango na bayi Katumbi, Jean-Pierre Bemba na Joseph Kabila, mokonzi ya kala.

Nzokande, bakeli mibeko koleka ntuku motoba bakotisi o'mokolo mwa mibale le 12 octobre 2022 mokanda ya botelemeli to motion ya defiance mpo na ministre ya Transport, Chérubin Okende, oyo azali moko na bayi lingomba lya Moïse Katumbi.

Bapameli ye makambo maike lokola kolekisa ndelo ya bokonzi bwa ye.

XS
SM
MD
LG