Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nationale : Ba Katumbistes na FCC batelemeli commission paritaire-mixte esengeli kondima bakambi ba CENI


Christophe Mboso Nkodia (D) atomboli maboko mpo na kopesa mbote na baninga baye bakeli mibeko na Assemblé nationale na Palais du peuple. Kinshasa, RDC, 3 février 2021.
Christophe Mboso Nkodia (D) atomboli maboko mpo na kopesa mbote na baninga baye bakeli mibeko na Assemblé nationale na Palais du peuple. Kinshasa, RDC, 3 février 2021.

Christophe Mboso Nkodia, motakambi ya Assemblée nationale asuki na kopusa likita libengisamaki vendredi mpo na kondima rapport ya commission paritaire-mixte etalaki likambo lya bato bakozala na bureau ya CENI (misala mya kolengela maponami). Boyokani bozali te na ngambo inso ya bayi politiki.

Ngambo inso ya politiki elobi ete ekondima te rapport ya misala ya commission eye mpo boyokani bozalaki te.

Ata kati ya Union sacrée, liboke lya mangomba mazali nsima na président Félix Thsisekedi boyokani bozali te.

"Tokoki kondima te rapport yango mpo bato nkombo na bango epesami na bureau ya CENI mpo Union sacrée bazali baye binso banso tondimi te, elobi na VOA Lingala moko na bakeli mibeko ya Union sacrée, ya FCC-Mosaïque baye batika ngambo ya mokonzi ya kala Joseph Kabila mpo na kokatisa ngambo ya M. Tshisekedi.

Mangomba misusu mpe ya Union sacrée mpe baboyi yango. Lokola bayi ngambo ya Moïse Katumbi, MS-G7 na AMK mpe Alliés.

"Commission yango ezali mpenza paritaire mpe mixte te. Mpo bayi opposition bazalaki te na kati. Bato commission endimi baponami na bozangi boyokani," elobi na VOA Lingala SG (kalaka mokonzi) ya Ensemble pour la république, lingomba ya Moïse Katumbi.

Lokola bango, bayi FCC baye batikala nsima na Joseph Kabila babakisi na koloba ete boyokani bozali te ata kati na balakisi bilongi ya biyamba na bobonami ya motambwisi ya CENI.

CENCO (b'episkoko ya katoliko) na ECC (Eglise du Christ au cONGo) baye bakambaka makita ya biyamba balobi mosala esili te, kasi biyamba misusu motabo balobi basi baponi Denis Kadima.

FCC lokola ba politiki basusu basengi président Tshisekedi kosala lokola asalaka mobu moleki mpe koboya kondima baye baponami mpo na kokamba CENI, likolo na bozangi boyokani.

FCC lokola basusu ya opposition, Lamuka mingi mingi, baboyaki kotinga bato babango na CENI mpo na yango.

Kasi banso balobi baboyi maponami mazongisama nsima na 2023.

XS
SM
MD
LG