Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

B’episkopo bakebisi ete maponami ma le 21 mars mazanga pole na Congo-Brazzaville


Ba diacres na ba sango bamemi kandela kati na tempelo Saint Pierre Clavern Brazzaville, Congo, 26 mars 2016.
Ba diacres na ba sango bamemi kandela kati na tempelo Saint Pierre Clavern Brazzaville, Congo, 26 mars 2016.

B’episkopo ya katoliko ya Congo-Brazzaville bakebisi mpo na bozangi pole manapomi ma mokonzi ya mboka ma le 21 mars.

"Maponami mabongisami solo mpo na le 21 mars, kasi tozali na mwa ntembe ete maponami mokonzi ya mboka ya kimya, ya bato banso, ya pole, bonsomi mpe mandimama na banso masalama na kotala ndenge tozali lelo," elobi molobeli ya Conférence épiscopale, Mgr Victor Abagna Mossa, oyo atangi liyebisi.

B’episkopo bamituni ndenge nini kosalisa solo maponami na kotosa mikano minso ya komibatela na COVID-19 mpe mayangani ya bato mingi maye masengaka campagne électorale ya bonsomi.

"Mobeko ya maponami mosengi ete bofungoli ya sanduku ya maponami bosalama liboso lya bato banso. Ndenge nini kokisa yango na pole inso ntango couvre-feu ezali kobanda na 20 heures ?," emituni b’episkopo.

Président Denis Sassou N’Guesso, na mibu 36 na bakonzi, andimaki mposo moleki ete andimi kopesa nkombo na ye mpo kotikala na ebonga na ye, na bosenga ya lingomba lya ye PCT (Parti congolais du Travail).

Bayi opposision baike baboyaki kozala na maponami mango nse mpo na ntina ya makambo b’episkopo balobi.

Kasi o’mokolo mwa yambo, Albert Oniangue, mokambi na ba mpate ya etonga mpe officier ya kala ya mampinga asakoli ete akopesa nkombo na ye.

Mwa basanza eleki, Mathias Ndzon alobaki mpe akozala.

XS
SM
MD
LG