Bakonzi ya Amerika basengi na gouvernement ya sika na RDC efungola bizipeli na baye politiki nyonso mpe epesa eyano na matata ya maponami.
Milulu ya botiami na bokonzi ya Félix Tshisekedi makosalema o’mokolo ya minei na Palais de la nation, eyebisi baye ya présidence ya république na VOA Lingala.
Maponami ya ba Sénateurs, ba gouverneurs mpe ba vice-gouverneurs makopusana mpona ba circonscriptions ya Beni, Butembo na Yumbi, eyebisi Corneille Nangaa mokambi ya CENI.
Mokolo ya misato, ya minei to ya mposo ?
Union africaine (UA) mpe Union européenne (UE) bandimi kosala na président Félix Tshisiekedi, eyebisi lelo na Bruxelles ba ntoma na bango.
Mokonzi ya ba Maï-Maï Simba mpe babundi na ye motoba bakufi na bitumba na mapinga ya FARDC na etuka ya Ituri, eyebisi molobeli ya mapinga na esika liye.
Mwa matata ezali liboso ya mapongo ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe Ecide (Engagement pour la Citoyenneté et le Développement), mangomba maye masimbi Martin Fayulu.
Mokambi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) akumisi Nzambe mpo oyo bana ya RDC balingaki ekokisami.
Lipinga ya Union africaine liye esengeli ekoma o’mokolo mwa yambo ya mposo na Kinshasa ezongisami bokomi na yango nsima.
Botiayami na bokonzi ya Felix Tshsiekedi moko pusana mwa moke, elobi baye ya nzinga nzinga na ye.
Martin Fayulu amisakoli mokonzi ya mboka na nsima ya Cour constitutionnelle oyo endimi Felix Tshsekedi lokola molongi ya maponami mpe president ya mboka RDC.
Cour constitutionnelle esakoli Félix Thsisekedi président ya RDC na nsima ya kotala bosengi ya Martin Fayulu ya kobandela botangi ya ba bulletins de vote.
Union africaine esengi na Cour constitutionnelle ya RDC etelemisa naino mokano na yango ya suka mpo na maponamiy ya président. Mbela yango ebwakami na bokutani ya bakonzi ya bikolo mpe ya ba gouvernement basanganaki na Addis Abeba, na Ethiopie.
Bakonzi ya bikolo mpe ya ba gouvernement bakutanaki na Addis Abeba na bobengisi ya président Paul Kagame ya Rwanda mpe président en exercice ya Union africaine mpo na kosolola likolo ya makambo ya RDC.
Bokutani ya bakonzi ya bikolo mpe ya bakangi ya ba gouvernement ya SADC, na Addis Abeba (Ethiopie), esengi na Cour constitutionnelle ya RDC kosala mosala na yango na ndenge esengeli.
Bakonzi ya Amerika basengi polele emonisa na maponami ya RDC, ntango mokano ya Cour constitutionnelle ezali kozelama mpo na oyo etali bosengi ya Martin Fayulu ya kobandela kotanga ba bulletins ya maponami.
Bato pene na nkama mwambe na ndambo bakufaki na Yumbi, na etuka ya Maï-ndombe, eyebisi Haut-Commissariat ya ONU ya makoki ya bomoto too droits de l’homme.
Bakonzi ya bikolo mpe bakambi ya ba gouvernements ya Union africaine babengami o’mokolo ya minei na bokutani ya "likolo" mpo na makambo ya RDC, elakisi liyebisi ya misala ya Afrika maye.
Bakonzi ya mambi ya bokolongono bayebisi ete koleka bato 400 basili kowa na épidémie ya Ebola liye lizali kongala na est too na monyele ya RDC.
Voir plus