Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Union africaine ekoya lisusu te na Kinshasa o’mokolo ya lundi

Paul Kagame, mokonzi ya Rwanda mpe mokambi ya Union africaine (na loboko ya mobali) mpe Moussa Faki, mokambi ya Commission ya Union africaine, na bokutani ya Addis Abeba, Ethiopie, 17 janvier 2018. (Twitter/Rwanda presidence)

Lipinga ya Union africaine liye esengeli ekoma o’mokolo mwa yambo ya mposo na Kinshasa ezongisami bokomi na yango nsima.

Bakonzi bayike ya Union africaine, na bokutani na bango mposo moleki na Addis Abeba, basengaki na Cour constitutionnelle ya RDC kotelemisa naino mokano yango mpe kozela bango bakoma.

Kasi Cour constitutionnelle esakolaki mokano na yango na butu ya eyenga moleki mpe endimaki Felix Tshisekedi lokola mokonzi.​

Lipinga yango esengelaki ekambama na mokonzi ya Union africaine mpe ya Rwanda Paul Kagame.

XS
SM
MD
LG