Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Fardc babomi mokonzi ya ba Maï-Maï Simba na babundi na ye motoba na Ituri


Ba bundi ya lingomba FRPI (Forces des résistants patriotes de l'Ituri) na Tchei, Ituri, 28 juillet 2006
Ba bundi ya lingomba FRPI (Forces des résistants patriotes de l'Ituri) na Tchei, Ituri, 28 juillet 2006

Mokonzi ya ba Maï-Maï Simba mpe babundi na ye motoba bakufi na bitumba na mapinga ya FARDC na etuka ya Ituri, eyebisi molobeli ya mapinga na esika liye.

"Tosukisi basimba minduki sambo, kati na bango mokambi na bango Manu," elobi lieutenant Jules Tshikudi ya FARDC.

Bitumba liye lisalamaki o’mokolo mwa yambo moleki, na kati na butu.

"Bavandi bisika liye basepeli na koyoka liwa ya Manu, mokonzi ya batomboki oyo aminisa bango pasi," ebakisi Lieut. Tshikudi.

Nkombo ya solo ya Manu eyebani te, kasi akitanaki na Paul Sadala, alias Morgan, oyo bamobomaki na 2014. Ye afundamaki na kosalaka bokila oyo epekisama.

XS
SM
MD
LG