Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame abengisi bakonzi ya bikolo ya Union africaine mpo na makambo ya RDC


Paul Kagame, président de la République du Rwanda et président en exercice de l'Union africaine (UA), na siège ya UA, na Addis Abeba, Ethiopie, 17 novembre 2018.
Paul Kagame, président de la République du Rwanda et président en exercice de l'Union africaine (UA), na siège ya UA, na Addis Abeba, Ethiopie, 17 novembre 2018.

Bakonzi ya bikolo mpe bakambi ya ba gouvernements ya Union africaine babengami o’mokolo ya minei na bokutani ya "likolo" mpo na makambo ya RDC, elakisi liyebisi ya misala ya Afrika maye.

"Président ya Rwanda mpe président en exercice ya l'Union africaine (UA), nkumu Paul Kagame azali na makanisi ya kobengisa bokutani ya masolo ya likolo bakonzi ya bikolo mpe ba bakambi ya ba gouvernements mpo na makambo ya République démocratique du Congo," elobi mokanda liye.

Bokutani liye ekolanda masolo ya kati ya SADC, eyebisi liyebisi.

RDC ezali na nkwkoso na nsima ya maponami.

Cour constitutionnelle ezali kotala bosengi ya candidat Martin Fayulu oyo aboyi ba résultats ya CENI maye masakoli Félix Tshisekedi molongi ya présidentielle na 38,57%.

XS
SM
MD
LG