Ba juges ya Cour constitutionnelle bakoti "kinzonzi" na nsima ya koyoka ngambo nyonso ya baye bazalaki na audience ya kotala bosengi ya Martin Fayuku oyo aboyi ba résultats ya CENI ebimisi Félix Tshisekedi molongi ya présidentielle na 38,57%.
Balandi bayike ya Martin Fayulu bakangami na etuka ya Lualaba na nsima ya komanifester. Bofundami na kasala mobulu, eyebisi Richard Muyej Mungez Mans, mokambi ya etuka ya Lualaba.
Emmanuel Ramazani Shadary, oyo ayei na molongo ya misato na maponami ya présidentielle, azali kozuwa ba candidatures ya lingomba na ye, Front commun pour le Congo (FCC), mpona ba postes ya ba sénateurs, ba gouverneurs mpe ba vice-gouverneurs.
SADC, lingomba ya ba mboka ya Afrika ya Ngele mpo na ntombwa (développement), yango mpe esengi ete babandela kotanga ba résultats ya maponami.
Front commun pour le Congo (FCC) ebwaki mbela na patriotes nationalistes nyonso mpo na kosangana na nsima ya Félix Tshisekedi, molongi oyo asakolami na maponami ya présidentielle.
Ba policiers babengani balandi ya candidat Martin Fayulu basanganaki liboso ya Cour constitutionnelle na Kinshasa epayi wapi opposant eye akendaki kotika recours na ye mpo na koboya elonga ya Felix Tshisekedi esakolamaki na CENI le 30 decembre moleki.
Opposant Martin Fayulu akotisi recours na ye liboso ya Cour constitutionnelle mpo na koboya ba résultats provisoires ya présidentielle CENI esakoli maye mabimisi Félix Tshisekedi molongi na koleka 38%.
Martin Fayulu, candidats mosusu ya opposition, oyo aye na nsima molinga ya maponami Félix Tshisekedi, alobi andimi te ba résultats oyo CENI epimisi.
Félix Tshisekedi aponami président ya république na 38,57%, eyebisi Corneille Nangaa, mokonzi ya CENI na bosakoli ya ba résultats na mokolo ya minei na Kinshasa.