Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nangaa akumisa Nzambe mpo "oyo bana ya Congo balingaki yango nde esalami"


Corneille Nangaa, president of Congo's National Independent Electoral Commission (CENI), announces the results of the presidential election in Kinshasa, Democratic Republic of Congo, Jan. 10, 2019.
Corneille Nangaa, president of Congo's National Independent Electoral Commission (CENI), announces the results of the presidential election in Kinshasa, Democratic Republic of Congo, Jan. 10, 2019.

Mokambi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) akumisi Nzambe mpo oyo bana ya RDC balingaki ekokisami.

"Tozali na ntina mingi ya kopesa Nkolo matondo. Bokanisa mokano ya bana mboka nyonso : balingaki Constitution ebongwma te, ebongalamaki te. Balingaki mabongisi ya Mobeko likonzi maye mapekisi mandat ya misato ya mokonzi ya mboka matosama ; esalami bongo. Balakisaki polelete balingi na bango ya bongwama likolo ya mboka ; yango nde ezali o’nokolo ya lelo. Ndenge nini kopesa Mokonzi matondo te mpo na bolamu na ye epayi ya libota ya ekolo na biso," etatoli Corneille Nangaa na miso ya panzi sango na Kinshasa.

Mwana mboka Nangaa apesi mpe losako na mokonzi ya ekolo Joseph Kabila, na gouvernement mpe na ba institutions ya mboka mpo na basali ete maponami masalama malamu. Ndenge moko mpe na bana nyonso ya Congo mpe na libota ya baye politiki nyonso.

Mokambi ya CENI, asakoli mpe maye matikali ya kosala na mosala ya maponami.

Kati yango, bokomisi ya ba mkombo ya ba candidats Sénateurs, gouverneurs mpe vice-gouverneurs oyo ezali koselema banda mokolo ya yambo ya mposo na ntongo.

Mpe lisusu, milulu ya botiyami na bokonzi ya Félix Tshiekedi nsima ya kondimisama na Cour constitutionnelle lokola président oyo aponami.

XS
SM
MD
LG