Parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Matete elakisi na etinda epesi na Inspection générale ya police wuto le 9 septembre, ete 260 millions $ elimwa na nzela ya bancarasiation ya lolenge ya kofuta basali mpe ba fontionnaires ya l'Etat.
Bancarisation ezalaki mbongwana esalamaki ntango ya président Joseph Kabila.
Parquet elobi kaka bato 50 nde baliaka misolo myango kasi epesi nkombo na yango te.
Bancarisation esengelaki kolongola ba fonctionnaires ya lokuta 133.253 mpe nkombo 43.253 eye ezongela mbala mibale.
Kati na août 2011 na novembre 2019, 507.21 milliards ya Francs congolais (259.54 millions $) ekabolama kati na bato baye police ezali koluka.
Parquet esengi police koluka banque commerciale nionso oyo eponamaki mpo na kofuta basali mpe ba fonctionnaires banso ya l’Etat.
Lisanga ya ba banques (ACB) liyebisi ete likopesa maboko na misala mya bosembo mpo na likambo lyango.