Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwana ya président ya kala ya Angola José Filomeno dos Santos akatelami mibu mitano ya boloko


José Filomeno dos Santos, mwana ya mokonzi ya kala ya Angola, José Eduardo dos Santos, na Cour suprême ya Luanda, Angola, 9 décembre 2019
José Filomeno dos Santos, mwana ya mokonzi ya kala ya Angola, José Eduardo dos Santos, na Cour suprême ya Luanda, Angola, 9 décembre 2019

Cour suprême ya Angola ekateli José Filomeno dos Santos, mwana ya président ya kala ya Angola José Eduardo dos Santos, mibu mitano mya boloko nsima na bosambisami mpo na kaniaka.

"Likolo lya makambo ya kobuba bato mpe trafic ya influence, mofundami akatelami etumbu mobimba ya mibu mitano mya boloko," ekataki zuzi Joao da Cruz Pitra ya Cour suprême ya Luanda.

Na juin, parquet esengaki mibu sambo mya boloko na bosambisami ya José Filomeno dos Santos oyo azali na mibu 42 mpe abengamaka "Zenu:.

Baninga baye basatu basusu, kati na bango mokambi mwa kala ya Banque centrale, Valter Filipe da Silva, bazwi mibu mitano mya boloko.

Basambeli ba bango basakoli ete bakosenga bobandeli ya kosambisama mpo ba clients na bango bayebi eloko te na maye bafundami na yango.

M. Filomeno dos Santos afundamaki na kotinda na kobuka mibeko 500 millions ya ba dollars na compte ya agence moko ya Crédit Suisse na moyibi.

M. Filomeno dos Santos atindaki mislo myango ntango azalaki mokambi ya fonds souverain angolais wuto 2013 kino 2018.

Parquet elobaki ete misolo atingaki na moyibi misengelaki kopesa nzela ya kopengwisa kino 1,5 milliards ya ba dollars.

Mokonzi ya sika ya Angola, Joao Lourenço, alongalaki José Filomeno dos Santos na mosala elongo na bato basusu bazalaki nzinganzinga ya mokonzi ya kala José Eduardo dos Santos oyo asalaki mibu 38 na boknzi yambo na kolongwa mpo na bokono.

Isabel dos Santos, ndeko ya José Filomeno mpe mwasi ya moyi RDC Sindika Dokolo, afundama, ye mpe lokola, mpo na kopengwisa 5 milliards ya ba dollars ya l’Etat.

Biloko bya Isabel dos Santos ekangama na Angola mpe na Portugal.

XS
SM
MD
LG