Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Zambie-RDC na bokutani na Lubumbashi mpo na basoda zambiens na mabele ma Congo


Basoda ba Zambie na Ndola, 11 février 2013.
Basoda ba Zambie na Ndola, 11 février 2013.

Bokutani ya mbala zomi ya session permanente défense mpe Sécurité kati na Ekolo Congo démocratique na Zambie ebandi ezali kosalama wuto mardi, na Lubumbashi na Haut-Katanga.

Matata kati na mboka mibale likolo ya bozali bwa basoda ya Zambie na Moba na Tanganyika mazali mama ya likambo lya motuya na bokutani bwango.

Nazali elikya ete bikolo mibale bikoluka yambo bolamu bwa bana ba mboka ba biso mpo na biyano ya solo mpe malamu mpo na bavandi na ndelo tokabolaka, elobi mokambi ma Haut-Katanga Jacques Kyabuka na libandela lya bokutani bwango.

Lipinga lya Zambie likambami na ntoma ya ekolo eye na Kinshasa. Bayi mbulamatari ya Haut-Katanga, Lualaba mpe Tangnyika nde balakisi elongi ya RDC.

Bakosolola mikolo mitano.

Basoda ya Zambie bakotaki na mboka Kalubamba na Kibanga, na Moliro, na etuka ya Tanganyika wuto mwa ba sanza.

XS
SM
MD
LG