Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Yoweri Museveni alingi atinda basoda ba Ouganda kobundisa ba ADF na RDC


Président Yoweri Museveni ya Ouganda na milulu mya bozui bokonzi bua ye mpo na mbala ya motoba na le 12 Mai 202. Photo Badru KATUMBA / AFPP
Président Yoweri Museveni ya Ouganda na milulu mya bozui bokonzi bua ye mpo na mbala ya motoba na le 12 Mai 202. Photo Badru KATUMBA / AFPP

Yoweri Museveni, mokonzi ya mboka Ouganda alobi ete, ekolo na ye ezali na ntina ya kotinda basoda mpo na kosunga ekolo Congo democratique (RDC) na kozongisa kimya na est ya RDC.

"Liboso bikolo ya Africa etinda ba soda mpo na bitumba na mboka Mozambique, esengeli liboso kosilisi bitumba na ba dongolomiso ya lingomba ADF na RDC," elobi Yoweri Museveni na masolo azuaki na bapanzi sango ya France 24 mpe ba media misusu ya France.

Mokonzi ya Ouganda abakisi ete masolo mazali kokoba na bakonzi ya RDC mpo na kotala lolenge nini lisalisi liye likoki kosalema.

Mikolo miye, misala mizali kosalema kati na bakambi ya bokengi ya bikolo biye mibale na mboka Beni (Nord-Kivu) mpe engumba mokonzi Kinshasa na Ouganda, na ntina ya koluka nzela ya kotala ndenge ya kobobundisa bayi lingomba ADF.

XS
SM
MD
LG