Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou asololi na Peter Pham mpo na kimya na Grands Lacs


Motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham na bokutani na mokonzi ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso, Brazzaville, Congo, 14 novembre 2019. (Twitter/Congo souverain)
Motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham na bokutani na mokonzi ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso, Brazzaville, Congo, 14 novembre 2019. (Twitter/Congo souverain)

Motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham azalaki o’mokolo ya misato na Brazzaville mpe asololaki na mokonzi ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso.

Masolo ma bango mazalaki mpo na kokolisa kimya na etuka ya Grands lacs.

Peter Pham awutaki na ekolo Congo démocratique (RDC) epayi wapi mpe azalaki wuta suka ya mposo moleki na bokutani na bakonzi ya ekolo eye.

Na bolengwi na ye na RDC, Peter Pham alobaki ete Etats-Unis esepeli kozala na boyokani ya makasi na président Tshisekedi.

"Kasi tozali na epikiselo na oyo tokoki kosala likolo na bato baye bazali na nse ya etumbu mpo na kotambola likolo ya makoki ya bomoto, mpo na mbeba mpe kaniaka, bazali na bokambi ya mampinga ya Congo démocratique (FARDC)," elimbolaki Peter Pham.

Motindami ya USA atangi kati na bango ba généraux Kahimbi (Delphin), Amisi (Garbiel) mpe Numbi (John)

Alobi ete président Tshisekedi ayebi yango malamu.

Mpo na Peter Pham, Etats-Unis ezali kosepela na mbongwana eye mokonzi ya sika ya RDC azali kosala mpo na kobundisa kaniaka, kobatela makoki ya bomoto, kozongisa kimya na ekolo mpe mingi na monyele ya RDC.

Peter Pham asakolali ete ntoma ya Amerika na Kinshasa, Michael Hammer, akeyi mpo na yango na Allemagne mpo na kosolola na mokambi ya mampinga ya Etats-Unis mpo na Afrika, Africom.

XS
SM
MD
LG