Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Banque mondiale elaki Tshisekedi kofungola ba bureaux na Goma na Kananga mpe kobakisa misolo


Président Félix Tshisekedi (D) na mokambi ya Banque mondiale (BM) David Malpass na Washington, Etats-Unis, 30 seotembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (D) na mokambi ya Banque mondiale (BM) David Malpass na Washington, Etats-Unis, 30 seotembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Mokambi ya Banque mondiale (BM) David Malpass alaki président Félix Tshisekedi kosunga ye na bokambi na ye. Ezalaki na bokutani na bango lundi na Washington.

M. David Malpass asololaki o’mokolo ya yambo ya mposo na M. Tshisekedi elongo na bakambi ya bituka ya Kasaï central, ya Nord-Kivu, ya Sud-Kivu mpe ya Itrui na bureau ya Banque mondiale, na Washington.

"BM ezali kosala procédure ya sika. Ezali kokomisa makambo mwa pete. Ekofungola ba bureaux kati na mboka. Bureau moko na Goma mpo na bituka ya est ya RDC. Bureau mosusu na Kananga mpo na bituka ya katikati ya mboka," eyebisi na VOA Lingala Jean Bamanisa, mokambi ya Ituri.

Bakambi ya bituka na M. Tshisekedi bapesaki na BM makanisi na bango kolonda linaka ya lisalisi ya litomba (Programmes d’actions prioritaires).

Basengaki BM kosunga mpo na bozongisi bokonzi ya l’Etat na mboka yango ekosenga kobongisa misala ya bosembo, ba équipements mpe administration mpe mpo na komatisa nkita, banzela.

"Esengeli BM ematisa mbala mibale lisungi lya yango. Kino sika oyo tozalaki na 500 to 600 millions ya ba dollars ya lisungi mobu na mobu, kasi esengeli emata," elobi Bamanisa.

M. Tshisekedi alongwaki Washington lundi na mpokwa mpo na kozonga Kinshasa nsima na mposo moko ya mobembo na Etats-Unis esika ayaki mpo na 74e Assemblée générale ya Nations unies.

Awutaki na mobembo mosusu na Bruxelles.

XS
SM
MD
LG