Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

OVG ekebisi ete bato bakufa na botomboki ya volcan Nyiragongo kosangana na ba gaz ya lac Kivu


Bato bazali kotala ndenge nzela epasuki nsima na botomboki ya volcan Nyiragongo, na Goma, Nord-Kivu, 26 mai 2021.
Bato bazali kotala ndenge nzela epasuki nsima na botomboki ya volcan Nyiragongo, na Goma, Nord-Kivu, 26 mai 2021.

Observatoire volcanologique ya Goma elobi volcan ekoki kosala eruption limnique to ekoki kobwaka moto mpe kosangana na ba gaz eye ezalaka wuto mibu mingi na lac Kivu.

Likama lya boye lisalama na Cameroun na lac Nyos na sanza ya mwambe ya 1986 mpe pene na bato nkoto yoko na mwambe bakufaki.

Nzonkande molobeli ya mbulamatari ya Kinshasa, Patrick Muyaya alobi ete batali volcan bazali likolo lya ngomba mpo na koluka koyeba mpenza soki nini ezali kosalama.

Bavandi ya Goma na nord Kivu mpe nzinganzinga bazali kokima esika ya likama makasi to zone rouge.

Bapesamaki mitindo ya kolongwa na ngambo moko ya engumba eye na bakonzi mpe batali volcan.

Wuto na ngonga ya yambo ya kotana ntong, Lieutenant general Constant Ndima apesaki mitindo ya kolongwa na ba quartiers zomi ya Goma.

Molongo molayi mpe ba embouteillages esalami mingi na nzela.

Bavandi ya Goma baike bazali kokende na Sake, na 25 kms na west ya Goma.

Basusu bakatisi na Rwanda na ndelo ya Rubavu.

Kayi bayi Protection civili balobi nyonso ebongisami te esika bato bazali kokima.

Bato bazangi mayi, bileyi, mpe bisika bya nzongo, elobi maokambi ya Protection civile Joseph Makundi.

.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG