Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID-19: Président ya Burkina Faso apesi sanza motoba ya lifuta na ye


Président Jean Marc Kaboré ya Bukina Faso, na lopitalo CHU ya Tengandogo, Burkina Faso, 19 avril 2020. (VOA/Présidence Burkina Faso)
Président Jean Marc Kaboré ya Bukina Faso, na lopitalo CHU ya Tengandogo, Burkina Faso, 19 avril 2020. (VOA/Présidence Burkina Faso)

Président ya Burkina Faso, Jean Marc Kaboré, akopesa sanza motoba ya lifuta na ye mpo na kobundisa coronavirus ya sika, eyebisi mbula lamatari ya Burkina Faso. Bayi mbulamatari mpe bakopesa sanza mike, mpe ba masques manso ekokelama na mboka, kolanda mokano ya bankonzi.

"Président ya Faso akopesa sanza motoba ya lifuta na ye, Ministre wa yambo sanza minei, ba ministres d’Etat sanza mibale mpe ba ministres sanza moko mpo kosangisami misolo ya kobindisa COIVD-29," elobi ministre molebeli ya mbulamatari, Remis Dandjinou.

Bakonzi bazwi mokano ete kolata masque ekoma lotomo kobanda le 27 avril.

Mbulamatari ya Burkina Faso ezwi mpe mokano ete ba masques manso to pizipelo ya zolo esala na mboka na bango.

Bakosalela biloko biwuti na cotton, bibengami na mboka na bango "Faso Danfani".

Bavandi ya mboka baiike basepelina mokano yango,

Baiike basengi ete bankonzi ya mboka bakabola ba masques ofele mpo eliki ntalo mpe bapesa bana mboka biloko misusu basengeli na yango lokola bilei mpo bavandi na ndako.

XS
SM
MD
LG