Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou ayei matanga ya leki ya molongani wa ye na Kinshasa


Président Denis Sassou N'Guesso ayambami na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi na jardin ya palais de la Nation na Kinshasa, le 14 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Denis Sassou N'Guesso ayambami na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi na jardin ya palais de la Nation na Kinshasa, le 14 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Denis Sassou N’Guesso akomaki na Kinshasa lundi 14 septembre mpo na matanga ya mama leki ya molongani wa ye Antoinette Sassou.

Mokonzi ya Congo-Brazzaville ayambamaki na mokokani wa ye président Félix Tshisekedi na bokiti bwa hélicoptère na ye na jardin ya Palais ya Nation na Kinshasa.

Bazalaki na mwa masolo kasi M. Sassou alongwaki mpo na komibongisa na ntina ya kokende matanga ma Germaine Djembo, leki ya molongani wa ye, Antoinnette Sassou.

Nzoto ya nkondo Germaine Djembo ekomaki na Kinshasa o’mokolo mwa eyenga nsima na liwa lya ye na France.

Mokonzi ya kala ya Bénin, Boni Yayi mpe azelamami na matanga mango.

XS
SM
MD
LG