Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Idriss Deby na Tshisekedi bayokani te mpo mboka eye ekozala membre ya Conseil ya sécurité ya ONU


Président Félix Tshisekedi (G), mokokani wa ye ya Tchad Idriss Deby (C), na ya Ali Bongo Ondimba ya Gabon na likita lya bakonzi ba bikolo bya CEEAC na libreville, Gabon, 18 décembre 2019.
Président Félix Tshisekedi (G), mokokani wa ye ya Tchad Idriss Deby (C), na ya Ali Bongo Ondimba ya Gabon na likita lya bakonzi ba bikolo bya CEEAC na libreville, Gabon, 18 décembre 2019.

Président ya Tchad, Maréchal Idriss Deby na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, basololi na visioconférence mpo etali ekolo ekozala na bo’ membre non permanent ya Conseil ya sécurité ya ONU. Kasi bayokani te mpo na mboka esengeli ezwa ebonga eye.

RDC, Tchad na Gabon bango nde bikolo bisato ya Afrika bizali kosenga kozala na ebonga yango.

Kolanda présidence ya RDC, présidence ya Gabon Ali Bongo Ondimba azalaki na masolo mango. Asengaki bolimbisi na ngonga ya suka.

Président Félix Antoine Tshisekedi na Idriss Deby Itno basololi ntango molayi mpo na yango… Masolo na bango makokoba nsima, elobi bayi présidence ya RDC.

Maréchal Deby na Tshisekedi basololaki mpe ete Union africaine eye mokonzi ya RDC awzi bokambi na yango.

Balobelaki mpe bokengi na Afrika ya kati kati.

XS
SM
MD
LG