Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akebisi bayi mbulamatari ya ba "warriors" kolanda ba "autorités morales" na bango


Présiodent félix Tshisekedi liboso lya bapanzi sango na Goma, Nord-Kivu, 13 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC_
Présiodent félix Tshisekedi liboso lya bapanzi sango na Goma, Nord-Kivu, 13 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC_

Président Félix Tshisekedi asengi na bayi mbulamatari kolanda nzela atiaki mpo na politki na ye kasi koboya kotosa ba "autorités morales" to bakambi mangomba epayi wapi bawuta.

M. Tshisekedi alobi yango na likindo ya mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique ebandi o'mokolo mwa minei na Kempisky Fleuve Congo H֧ôtel na Kinshasa.

Mokonzi ya RDC azongisi na mayele ya bayi mbulamatari ya babundi to "gouvernements de Wariors" lokola abengaki bango na libandela lya mosala na bango, ete esengeli basala mosala na bomoko mpo na bolamu ya mboka.

M. Tshisekedi akebisi ba ministres na mpe bayi mbulamatari banso na kolanda ba autorités morales to bakambi ya mangambo epayi ba wuta to baye banso bakoluka kotelemela politki na ye ya "le Peuple d’abord" to bana mboka yambo.

Likindo lya lizali kosalama pene na sanza minei wuto mbulamatari ekambami na Ministre wa Yambo Jean-Michel Sama Lukonde etiamaki na esika.

Bayi politiki baike balobi maloba ya mokonzi ya mbosa matali ete matata mazali kati liboke "Union sacrée" eye ekalamaki nsima na bokabwani ya majorité CACH (ya mokonzi mboka) na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila).

XS
SM
MD
LG